Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 7:16 - Mokanda na Bomoi

16 Nayini bomoi na ngai ; nawumela libela te na bomoi ! Tika ngai kimia, pamba te mikolo na ngai ezanga na yango tina.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 7:16
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Rebeka akendeki koyebisa Izaki : « Nalembi mokili likolo ya basi oyo ya mokili ya Iti. Soki Jakobi abali mwasi kati na bana basi ya mokili oyo, tina nazala na bomoi ekozala lisusu te. »


Sima na ye kotambola mokolo mobimba kati na esobe, akomaki na nzete moko ya moke, avandaki na se na yango mpe asengaki kufa na maloba oyo : — Yawe, nalembi ! Zwa molimo na ngai mpo ete naleki bakoko na ngai te na malamu.


Nayini bomoi na ngai ! Nakokoba kaka komilela, nakoloba na mongongo makasi mpe na pasi ya motema na ngai.


Boni, mwa ndambo ya mikolo na ngai esili te ? Kende ata mosika na ngai mpo ete nazwa ata tango ya kosepela


Longola miso na Yo mosika na ye mpe tika ye, ye moko, kino tango akozwa lifuti ya mosala na ye lokola moto oyo asalaka kaka mpo na lifuti.


Tika ete Nzambe aboma na Ye ngai, asembola loboko na Ye mpo na kokata ngai moto !


Malamu bafina ngai kingo mpe nakufa, pamba te kufa ezali na litomba koleka bomoi oyo.


Oh Nkolo, kobosana te ete bomoi na ngai ezali kaka pema ya pamba ! Miso na ngai ekomona lisusu bolamu te.


Atako nazali sembo, motema na ngai etondi na mawa mpo na ngai moko, nayini bomoi na ngai.


Moto azali lokola mopepe, mikolo ya bomoi na ye ezali lokola elili oyo ezali koleka.


Nakangi monoko, nakoloba lisusu te, pamba te Yo nde osali.


Yawe, yoka libondeli na ngai ; yoka na bokebi, wana nazali koganga mpo na kosenga lisungi, kovanda nye te liboso ya mpinzoli na ngai, pamba te epai na Yo, nazali mopaya mpe moleki nzela lokola bakoko na ngai.


Solo mikolo ya bomoi na ngai ekatama, ezali pamba na miso na Yo. Bomoi ya moto nyonso ezali kaka mopepe.


Botielaka Ye elikya tango nyonso, bosopaka mitema na bino liboso na Ye, pamba te Nzambe azali ebombamelo mpo na biso.


Boye, asukisaki mikolo ya bomoi na bango lokola mopepe, mpe mibu na bango ya mbotama kati na somo.


pamba te azalaki koyeba ete bazali kaka bato, bazali kaka lokola mopepe oyo ezali koleka mpe ekozonga lisusu te.


Boye, nayinaki bomoi, pamba te misala oyo esalemaka na se ya moyi ezali mabe mpo na ngai. Nyonso wana ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.


Na bisika nyonso oyo nakopanza bango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, bato nyonso oyo bakotikala na bomoi kati na ekolo oyo ya mabe bakoluka kufa na esika ya bomoi. ›


Sik’oyo, oh Yawe, kamata na Yo bomoi na ngai ; pamba te eleki malamu ete nakufa na ngai, kasi nazala na bomoi te !


Tango moyi ebimaki makasi, Nzambe atindaki mopepe ya este oyo epesaki molunge makasi. Moyi ebetaki moto ya Yona makasi. Yona alembaki nzoto, asengaki kokufa ; alobaki : — Eleki malamu ete nakufa na ngai, kasi nazala na bomoi te !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ