Sima na ye kotambola mokolo mobimba kati na esobe, akomaki na nzete moko ya moke, avandaki na se na yango mpe asengaki kufa na maloba oyo : — Yawe, nalembi ! Zwa molimo na ngai mpo ete naleki bakoko na ngai te na malamu.
Soki kaka obombaki ngai na se ya bakufi mpe otikaki ngai kuna kino kanda na Yo esila ! Soki kaka okatelaki ngai tango mpo ete, na sima na yango, okanisa ngai lisusu !
Mikolo ya bomoi esili, elongwe na bomoi na ngai ndenge balongolaka ndako ya kapo ya mobateli bibwele. Akati bomoi ngai ndenge motongi bilamba akataka basinga soki asilisi kotonga elamba. Longwa na moyi kino na butu, akomisi bomoi na ngai na suka.