8 Ah ! Nani akoki kosala ete bosenga na ngai ekokisama, mpe ete Nzambe akokisela ngai likambo oyo nazali kozela !
Sima na ye kotambola mokolo mobimba kati na esobe, akomaki na nzete moko ya moke, avandaki na se na yango mpe asengaki kufa na maloba oyo : — Yawe, nalembi ! Zwa molimo na ngai mpo ete naleki bakoko na ngai te na malamu.
Nayini bomoi na ngai ! Nakokoba kaka komilela, nakoloba na mongongo makasi mpe na pasi ya motema na ngai.
Bazelaka kufa, kasi eyaka te ; nzokande balukaka yango koleka bozwi oyo ebombama,
balingaki kotonda na esengo mpe kosepela soki bamoni kunda !
Makambo oyo nazalaki koboya, yango nde ekomi bilei na ngai, atako ezali mabe.
Tika ete Nzambe aboma na Ye ngai, asembola loboko na Ye mpo na kokata ngai moto !
Natondi na posa ya lobiko na Yo, nazali na elikya kati na liloba na Yo.
Sik’oyo, oh Yawe, kamata na Yo bomoi na ngai ; pamba te eleki malamu ete nakufa na ngai, kasi nazala na bomoi te !