30 Boni, likambo nini ya mabe ezali na monoko na ngai ; monoko na ngai ekoki kososola mabe te ?
Jakobi asosolaki ete ezali elamba ya Jozefi mpe agangaki : — Ezali elamba ya mwana na ngai ! Nyama moko ya mabe elie ye ! Solo, bakati-kati Jozefi na biteni !
Ozali koloba na Nzambe : ‹ Makambo oyo nazali koloba ezali ya solo ; nazali sembo na miso na Yo. ›
Boni, litoyi emekaka maloba te ndenge lolemo emekaka bilei ?
Pamba te litoyi nde esosolaka maloba ndenge lolemo emekaka bilei.
Boni, baliaka na mungwa te bilei oyo ezanga elengi ? Mayi oyo ezalaka kati na maki ezalaka elengi ?
Bilei ya makasi ezali mpo na mikolo, ba-oyo bayebi kokesenisa malamu mpe mabe.