Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 6:27 - Mokanda na Bomoi

27 Solo, bino, bokoki ata kobeta zeke mpo na mwana etike mpe koteka moninga na bino na bowumbu !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 6:27
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

ozalaki kozongisa basi bakufisa mibali maboko pamba, mpe ozalaki kosilisa makasi ya bana bitike.


babotolaka ane ya mwana etike mpe bazwaka lokola ndanga ngombe ya mobali ya mwasi oyo akufisi mobali ;


Bazali kobotola mwana etike na mabele ya mama na ye, bazali kokanga mwana ya mobola mpo na niongo.


pamba te nazalaki kosunga babola oyo bazalaki kosenga lisungi, mpe mwana etike oyo azangi moto oyo akosunga ye.


soki nabombaki lipa na ngai mpo na ngai moko to nakabolaki yango te na bana bitike,


soki natombolaki loboko na ngai mpo na kosala mwana etike mabe, wana nayebaki ete nazali na nguya liboso ya basambisi,


Oh Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola ; tika ete nkembo na Yo ezala awa na mokili mobimba !


Moto nyonso oyo abongisaka kosala mabe alukaka ndenge nini koyokisa bato pasi mpe abebisaka boyokani ;


Bolongisa moto oyo azangi makasi mpe mwana etike, bokata likambo ya moto ya mawa mpe ya mobola ;


Bokonyokola te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike.


Boni, bazongisaka solo mabe na malamu ? Tala, batimoli libulu mpo na kokunda ngai ! Kanisa ndenge nini natelemaki liboso na Yo mpo na koloba na tina na bolamu na bango, mpo ete kanda na Yo ekende mosika na bango.


Tika ete kolela eyokana wuta na bandako na bango tango okotindela bango banguna na pwasa, pamba te batimoli libulu mpo ete bakanga ngai mpe batie mitambo na makolo na ngai !


Kati na mboka na yo, batiolaka batata mpe bamama, banyokolaka mopaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali.


Nakolakisa bino bilembo ya kokamwa, na likolo mpe na mokili : makila, moto mpe makonzi ya milinga.


Nzokande, yango mpe ekweyaki, mpe bamemaki bato na yango na bowumbu. Bakataki-kataki na biteni bana na bango na babalabala nyonso, babetaki zeke mpo na kopona bato na yango ya lokumu mpo ete bamema bango na bowumbu, mpe bakangaki bakambi na yango minyololo.


« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Kosambela ya solo mpe ya peto na miso ya Nzambe, Tata na biso, ezali : kosunga bana bitike mpe basi bakufisa mibali, kati na bapasi na bango, mpe komibatela peto liboso ya makambo ya mokili.


Kati na lokoso na bango, bakobetela bino masolo ya lokuta mpo na kobenda bino mbongo na nzela ya maloba ya sukali. Nzokande, wuta kala, Nzambe akatela bango etumbu oyo ekoki mpo na bango, mpe libebi ezali penza kozela bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ