25 Tala ndenge maloba ya solo esalaka pasi ! Kasi makanisi na bino elingi kotalisa nini ?
Soki bovandaki ata kimia, bolingaki ata komonana bato ya bwanya.
Boye, mpo na nini bozali komitungisa mpo na kobondisa ngai ? Pamba te kati na biyano na bino, etikali kaka lokuta. »
Soki ezali bongo te, nani akoki kolakisa ngai ete nazali koloba lokuta ? Nani akoloba ete maloba na ngai ezali ya pamba ? »
Bino nyonso, boyebi yango malamu ! Bongo mpo na nini bilobaloba ya boye ?
Asilikelaki mpe baninga misato ya Yobo, pamba te balongaki te kopesa Yobo eyano oyo esengeli ; nzokande bakweyisaki Nzambe.
Maloba na yo ezalaki kolendisa bato oyo bazalaki kotepatepa, mpe oyo mabolongo na bango ezalaki kolemba.
Boteya ngai, bongo nakokanga monoko ; bolakisa ngai mabe nini ngai nasali !
Bokanisi ete bokoki kosembola makambo oyo nazali koloba to kozwa lokola mopepe, maloba ya moto oyo azali na pasi ?
Maloba ya bato oyo balobaka mingi ezokisaka lokola mopanga, kasi lolemo ya bato ya bwanya ezali lokola mafuta oyo ebikisaka.
Kozongisa eyano ya malamu epesaka moto esengo, mpe liloba oyo elobami na tango oyo ekoki ezalaka kitoko.
Kufa mpe bomoi ezali na se ya nguya ya lolemo ; moto oyo alingaka lolemo akolia mbuma na yango.
Liloba oyo elobami na tango oyo ekoki ezali lokola wolo oyo basangisi na palata.