24 Boteya ngai, bongo nakokanga monoko ; bolakisa ngai mabe nini ngai nasali !
Nakoloba na Nzambe : ‹ Kokatela ngai etumbu te, yebisa ngai mabe nini nasali ! ›
Mabe mpe masumu boni nasali liboso na Yo ? Talisa ngai mbeba mpe masumu na ngai.
Tango bino bozalaki koloba, ngai nazalaki koloba te, nazalaki koyoka makanisi na bino, wana bozalaki koluka makambo ya koloba.
Kasi sik’oyo, Yobo, yoka maloba na ngai, tia matoyi mpo na koyoka maloba na ngai !
Lakisa ngai makambo oyo nazali kokoka komona te ; soki nasali mabe, nakozongela yango lisusu te. ›
Toyekolaki likambo yango malamu : ezali penza bongo. Boye, yoka yango mpe salela yango mpo na bolamu na yo ! »
mpo na kokangola ngai na loboko ya monguna to mpo na kobikisa ngai na nguya ya bato mabe ? ›
Tala ndenge maloba ya solo esalaka pasi ! Kasi makanisi na bino elingi kotalisa nini ?
Epesaka mosali na Yo mayele ; moto nyonso oyo atosaka yango azwaka litomba mingi.
Olobaki : « Nakopesa yo malako mpe nakolakisa yo nzela ya kolanda ; nakopesa yo toli mpe nakosenzela yo.
Pamela ya moto ya bwanya epai ya moto oyo ayokaka ezali lokola wolo ya peto mpe sheneti ya wolo.
Teya moto ya bwanya, mpe akokoma lisusu na bwanya koleka ; teya moto ya sembo, mpe akobakisa lisusu boyebi na ye.
Bandeko balingami, bosimba likambo oyo : tika ete moto nyonso awelelaka koyoka, kasi awelelaka te koloba mpe kosilika ;
Biso nyonso tobetaka mabaku na lolenge ebele. Moto oyo abetaka libaku te na maloba oyo ebimaka na monoko na ye azali moto ya kokoka mpe azali na makoki ya kobatela bomoto na ye nyonso.