‹ Tozalaki na posa ya kobikisa Babiloni, kasi akobika te ; yango wana, tobima kati na yango mpe tokende, moto na moto na engumba na ye ; pamba te esambiselo na ye ekomi kino na Lola, emati likolo lokola mapata. ›
Yesu alobaki na bango : — Na butu ya lelo, bokokweyisa kondima na bino mpo na Ngai ; pamba te ekomama : « Nakobeta mobateli bibwele, mpe bameme ya etonga ekopalangana. »
Tango nasambaki mpo na mbala ya liboso, moto ata moko te azalaki wana mpo na kosunga ngai ; bango nyonso basundolaki ngai. Tika ete Nzambe atangela bango yango te !