bongo bato ya Saba bayei kokweyela yango mpe bakei na yango. Babomi basali na mopanga, mpe ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! »
Tango baninga misato ya Yobo —Elifazi, moto ya Temani ; Bilidadi, moto ya Shuwa ; mpe Tsofari, moto ya Naama— bayokaki sango ya pasi nyonso oyo ekomelaki Yobo, batikaki bandako na bango mpe bayokanaki mpo na kokende kokabola pasi elongo na ye mpe kobondisa ye.