Yobo 6:10 - Mokanda na Bomoi10 Na boye nde nakoki kozwa kobondisama mpe esengo kati na pasi na ngai, oyo eleki ndelo, pamba te nawangani te maloba ya Ye oyo azali Mosantu. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.