Olobaki : ‹ Nani akoki komema molili na mabongisi na Ngai, na nzela ya maloba na ye, oyo ezanga tina ? › Solo, nazalaki kolobela makambo oyo nayebaki te, makambo ya kokamwa penza mpo na ngai, makambo oyo nasosolaki te.
Yawe, Nzambe na ngai, bikamwa mpe mabongisi oyo osalaka mpo na biso ezali ebele penza. Moko te akokani na Yo ; nalingi kotatola mpe kopanza sango na yango, kasi motango na yango eleki ebele.
Nzambe asalaka eloko na eloko malamu na tango na yango ; atiaka lisusu, kati na mitema ya bato, posa ya koyeba mabombami na Ye. Nzokande, bato bakokaka te kososola mosala ya Nzambe, kobanda na ebandeli kino na suka.
Oyebi te ? Nanu oyoka te ? Yawe azali Nzambe ya libela na libela, azali Mokeli ya basuka ya mabele ; alembaka te mpe apemaka te, mpe moko te akoki kososola mayele na Ye.