Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 5:25 - Mokanda na Bomoi

25 Okososola ete bana na yo bakozala ebele, mpe bakitani na yo, lokola matiti ya mabele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 5:25
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola putulu ya mabele ; bongo soki moto akoki kotanga putulu, akokoka mpe kotanga bakitani na yo.


Yawe amemaki Abrami na libanda mpe alobaki na ye : — Tala na likolo mpe tanga minzoto soki okokoka kotanga yango. Alobaki na ye lisusu : — Ezali boye nde bakitani na yo bakozala.


Bana na ye bakozala bato na nguya kati na mokili ; ekeke ya bato ya sembo ekopambolama.


Tika ete ble etonda kati na mokili, mbuma na yango ebota ebele na likolo ya bangomba lokola Libani ! Wuta na engumba, bato bakozala na bofuluki lokola matiti ya elanga.


bakitani na yo balingaki kozala lokola zelo, bana na yo, lokola motango ya mbuma ya zelo ; kombo na bango elingaki kolongwa te to kobebisama te liboso na Ngai.


Nakosalela bino ngolu, nakopesa bino mabota nakokomisa bino ebele mpe nakobatela boyokani na Ngai elongo na bino.


Mabota na bino ekopambolama ; milona na bino mpe bibwele na bino : bangombe na bino, bameme mpe bantaba na bino ekopambolama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ