Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 5:24 - Mokanda na Bomoi

24 Okososola ete ndako na yo ezali na kimia ; tango okotala bibwele kati na lopango na yo, okomona ete ata moko te ezangi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 5:24
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ndako na ye etikalaka na eloko moko te, mpe fofolo ezalaka ya kopanzana kati na ndako yango.


Tala, solo, ndenge suka ya moto mabe ezalaka, mpe bomoi ya moto oyo ayebi Nzambe te. »


Pole ekomaka molili kati na ndako na ye, mpe mwinda oyo epelaka pembeni na ye ekufaka.


soki ozali peto, soki ozali sembo, akotelema Ye moko, ata sik’oyo, mpo na kokata likambo na yo mpe kozongisela yo libula na yo, kolanda bosembo na yo.


Ndambo bazalaki koyengayenga na esobe, na esika oyo ezanga bato, bamonaki te nzela ya engumba epai wapi bakoki kovanda.


Nzambe asambwisaka bato minene, akotisaka bango na mobulu makasi kino bazanga nzela ya kobimela na pasi.


Ndako na ye ezali na bokolongono mpe na bomengo, mpe bosembo na ye ewumelaka mpo na seko.


Boye, bakolekisa mikolo ya bomoi na bango kati na bofuluki, mpe mokili ekozala libula ya bana na bango.


mabe ata moko te ekokweyela yo, pasi ata moko te ekopusana na ndako na yo ;


Boye, kende, sangisa bakambi ya Isalaele mpe loba na bango : « Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi, abimelaki ngai mpe alobi : ‹ Nazwi mokano ya kobundela bino, pamba te namoni pasi na bino na Ejipito. › »


Bokopambolama tango bokokota mpe bokopambolama tango bokobima.


Tango Davidi mpe bato na ye bakomaki na engumba Tsikilagi, bakutaki yango ebebisama na moto. Basi na bango, bana na bango ya mibali mpe ya basi bakomaki bawumbu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ