Mokonzi Sedesiasi apesaki mitindo ete batia Jeremi kati na lopango ya bakengeli mpe bapesaka ye, mokolo na mokolo, lipa moko oyo ekobanda kowuta na balabala ya bato oyo basalaka mapa, kino tango mapa ekosila kati na engumba. Boye, Jeremi avandaki kati na lopango ya bakengeli.
Nakokangola bango na bokonzi ya mboka ya bakufi, nakosikola bango na kufa. Oh kufa, wapi nguya na yo ? Oh mboka ya bakufi, wapi nguya na yo ya kobebisa ? Nakoyokela bango mawa te !
Nzokande, nzete ya figi ebimisi fololo te, nzete ya vino eboti mbuma te, nzete ya olive eboti mbuma te, bilanga ebimisi bilei te, bameme mpe bantaba ezali te kati na lopango, mpe bangombe ezali te kati na lopango.
Bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango ; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te.