Tango okokatisa mayi monene, nakozala elongo na yo ; mpe tango okokatisa bibale, ekozindisa yo te. Tango okotambola kati na moto, okozika te, mpe ndemo na yango ekotumba yo te ;
Soki babwaki biso kati na libulu ya moto, Nzambe oyo tosalelaka azali na makoki ya kobikisa biso wuta na libulu yango mpe ya kokangola biso na maboko na yo.
Alobaki na bapesi toli na ye : — Botala ! Nazali komona bato minei bazali kotambola kati na moto, bakangama basinga te mpe moto ezali kozikisa bango te ; mpe moto ya minei azali lokola mwana ya banzambe.
Kasi bato yango bakendeki lisusu lisanga epai ya mokonzi Dariusi mpe balobaki na ye : — Mokonzi, kobosana te ete mobeko ya bato ya Medi mpe ya Persi elobi ete mokano moko te to mobeko moko te ya mokonzi ekoki kobongolama.
Boye, mokonzi apesaki mitindo ete bamema Daniele mpe babwaka ye kati na libulu ya bankosi. Mokonzi alobaki na Daniele : — Nzambe na yo, oyo osalelaka na molende, akobikisa yo !
Komekama oyo ekomelaki bino ekomelaka bato nyonso ; mpe Nzambe azali Moyengebene ; akotika te ete bomekama koleka makasi na bino. Kasi na tango ya komekama, akobongisela bino nzela ya kobima na komekama yango, mpe akopesa bino makasi ya kotelemela yango.
Solo, bandeko, na tina na pasi oyo ekweyelaki biso kati na etuka ya Azia, tolingi boyeba malamu ete tonyokwamaki mingi kino ata kolemba nzoto mpe kobungisa elikya ya kokoba kozala na bomoi.