Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 5:18 - Mokanda na Bomoi

18 Pamba te azokisaka pota, kasi atiaka yango mpe kisi ; abetaka, kasi loboko na Ye ebikisaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 5:18
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abikisaka bato oyo batutami na mitema mpe akawusaka bapota na bango.


Kasi Yawe akobeta Ejipito na nzela ya bitumbu, akobeta yango mpe akobikisa yango. Bakozonga epai na Yawe, bongo akoyanola na kolela na bango mpe akobikisa bango.


Pole ya sanza ekongenga lokola pole ya moyi, mpe pole ya moyi ekongenga makasi koleka mbala sambo lokola pole ya mikolo sambo, na mokolo oyo Yawe akotia kisi na pota ya bato na Ye mpe akobikisa yango.


Nakozongisela yo bomengo na yo mpe nakobikisa bapota na yo, › elobi Yawe. ‹ Lokola bazalaki kobenga yo ekolo basundola, Siona oyo moto moko te ayokelaka mawa ; ›


Boya, tozonga epai na Yawe ! Akati-kati biso solo na biteni, kasi akobikisa biso ; azokisaki biso, kasi akotia kisi na bapota na biso.


Nzokande, soki na ngonga ya kotala malamu ndako sima na kopakola yango mabele, Nganga-Nzambe amoni te kobima ya litono, wana akoloba ete ndako yango ezali peto, pamba te mbindo na yango esili kolongwa.


Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe ; mosusu azali te ! Nabomaka mpe napesaka bomoi ; nazokisaka mpe nabikisaka. Mpe moto moko te akoki kokangola oyo ezali na maboko na Ngai.


Yawe abomaka mpe apesaka bomoi, akitisaka bato na mokili ya bakufi mpe asekwisaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ