Yawe alobaki na Moyize : — Sembola loboko na yo likolo mpo ete molili epanzana na mokili ya Ejipito, molili oyo ekosala ete bato batambola na kosimbasimba.
Na moyi makasi, bokotenga-tenga lokola bakufi miso na molili. Bokolonga te na makambo nyonso oyo bokosala. Mokolo na mokolo, bakonyokola bino mpe bakoyiba bino, mpe moto moko te akomonana mpo na kokangola bino.