Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 5:12 - Mokanda na Bomoi

12 abebisaka mabongisi ya bato oyo bazalaka na mayele mabe, mpe maboko na bango ekokisaka te mikano na bango ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 5:12
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na mikolo misato, bayebisaki Labani ete Jakobi asili kokima.


Kasi Iri alalaki na ekotelo ya ndako ya mokonzi elongo na basali nyonso ya mokonzi na ye ; akendeki te na ndako na ye.


Abisalomi mpe bato nyonso ya Isalaele balobaki : — Toli ya Ushayi, moto ya Ariki, ezali malamu koleka oyo ya Ayitofeli, pamba te Yawe azwaki mokano ya kokakola batoli malamu ya Ayitofeli mpo na komema pasi epai ya Abisalomi.


Mbala moko, moto na Nzambe atindaki maloba oyo epai ya mokonzi ya Isalaele : « Keba ! Koleka na esika wana te, pamba te bato ya Siri bazali kokita kuna. »


Ezali ndenge wana nde tokobaki mosala na biso elongo na ndambo ya bato basimba makonga na maboko, kobanda na tongo kino na tango oyo minzoto ebimaka.


Tango banguna na biso bayokaki ete toyebi mabongisi na bango mpe ete Nzambe abebisi yango, biso nyonso tozongaki na mir ; moko na moko azongelaki mosala na ye.


Lisumu na yo ezali kokamba monoko na yo, ozwi elobeli ya bakosi.


Okolimwisa mabota na bango na mokili, mpe bakitani na bango, kati na bana ya bato.


pamba te nguya ya bato mabe ekosila, kasi Yawe alendisaka bato ya sembo.


Liboso na Yawe, bwanya moko te, mayele moko te mpe toli moko te ekoki kolonga.


Miso na Yawe ebatelaka boyebi, kasi akweyisaka maloba ya moto oyo azangi mayele.


Bato ya Ejipito bakosila mayele, mpe nakobebisa mabongisi na bango nyonso ; bakokende kotuna toli epai ya banzambe ya bikeko, epai ya milimo ya bakufi, epai ya bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe epai ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya.


Boye, anjelu na Yawe abimaki mpe abomaki bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na mitano kati na molako ya bato ya Asiri. Tango bato balamukaki na tongo ya mokolo oyo elandaki, bakutaki kaka bibembe.


Sik’oyo, nakomisi bilembo ya basakoli ya lokuta eloko pamba ; natie mobulu kati na molimo ya bato oyo balobaka makambo ekoya, nakweyisi boyebi ya bato ya bwanya mpe nakomisi mayele na bango liboma.


Bosala malamu mabongisi na bino, kasi ekobebisama ; boloba oyo bokoki koloba, kasi eloko moko te ekosalema, pamba te Nzambe azali elongo na biso !


Na tina na Edomi : Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Boni, engumba ya Temani etikali lisusu na bato ya bwanya te ? Bato ya mayele batikali lisusu na bososoli te ? Boni, bwanya na bango esili penza ?


Ndenge nini bokoki koloba : ‘ Tozali bato ya bwanya, pamba te toyebi Mobeko ya Yawe, ’ tango sik’oyo ekomeli ya balakisi ya Mobeko ebongoli yango lokuta ?


Na mokolo wana, » elobi Yawe, « nakoboma bato ya bwanya ya Edomi mpe nakolongola bato ya mayele na etuka ya bangomba ya Ezawu.


Tango mayele na ye ya bomoto ezongaki, Petelo amilobelaki : — Ah, nasosoli sik’oyo, ezali penza ya solo ! Nkolo atindaki anjelu na Ye mpe akangoli ngai na maboko ya Erode mpe na makambo nyonso oyo Bayuda balingaki kosala ngai.


Boye, Davidi mpe bato na ye pene nkama motoba balongwaki na engumba Keila mpe batambolaki bipai na bipai. Tango bayebisaki Saulo ete Davidi alongwaki na Keila, Saulo akendeki lisusu kuna te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ