Yobo 42:6 - Mokanda na Bomoi6 Yango wana, ngai moko, nazali komiyokela mawa mpe namileli, namikitisi kino na putulu ya mabele mpe na putulu ya moto. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bongo, kati na bikolo nyonso epai wapi bakokende na bowumbu, bato oyo bakobika bakokanisa ngai tango nakobuka lolendo ya mitema na bango, oyo etonda na posa ya kosalela banzambe mosusu mpe nakobebisa miso na bango, oyo eboyaka kotala Ngai mpo na kotala banzambe na bango ya bikeko. Bango moko bakoyoka nkele mpo na mabe oyo basalaki mpe mpo na misala na bango nyonso ya mbindo.