Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 42:12 - Mokanda na Bomoi

12 Yawe apambolaki suka ya Yobo koleka ebandeli ya bomoi na ye. Azalaki na bameme nkoto zomi na minei, bashamo nkoto motoba, bangombe nkoto mibale mpe ba-ane nkoto moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 42:12
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe apambola mingi nkolo na ngai mpe akomisa ye mozwi : apesa ye bameme, bantaba, bangombe, palata mpe wolo, basali ya mibali mpe ya basi, ba-ane mpe bashamo.


Jakobi alekisaki butu na esika wana. Kati na biloko oyo azalaki na yango, aponaki kado mpo na Ezawu, ndeko na ye :


Boni, otonga mir te zingazinga na ye mpo na kobatela ye, ndako na ye mpe biloko na ye nyonso ? Opambola misala ya maboko na ye, mpe bibwele na ye epanzana na mokili mobimba.


Azalaki na bana mibali sambo, bana basi misato ;


mpe azalaki na etonga ya bameme nkoto sambo, bashamo nkoto misato, bangombe nkoto moko, ba-ane nkama mitano, mpe azalaki na basali ebele penza. Alekaki bato nyonso ya Este na lokumu.


Bozwi na yo ya kala ekomonana moke, pamba te bozwi oyo ekoya na sima ekozala monene koleka.


Apamboli bango, mpe bakomi ebele ; mpe akitisi te motango ya bibwele na bango.


Lipamboli ya Yawe ekomisaka moto mozwi, mpe abakisaka pasi te na likolo na yango.


Suka ya likambo ezali malamu koleka ebandeli ya likambo ; kokanga motema ezali malamu koleka lolendo.


Nakokomisa motango ya bato mpe ya bibwele na bino ebele na mokili na bino : bakobotana mpe bakokoma ebele penza. Nakovandisa lisusu bato na mokili na bino ndenge ezalaka na tango ya kala mpe nakokomisa bino bato ya kofuluka koleka liboso. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.


Kati na esobe yango, apesaki yo mana mpo na kolia, bilei oyo batata na yo batikala koyeba te, mpo na kobuka lolendo na yo mpe komeka yo, mpo ete na suka, okoka komona bolamu.


Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango.


Ndenge boyebi, tobengaka bato oyo bayikaka mpiko bato ya esengo. Boyokaki sango ya lolenge oyo Yobo akangaki motema kati na pasi, mpe boyebi malamu makambo oyo Nkolo asalaki, na suka, mpo na bolamu na ye ; pamba te Nkolo atonda na boboto mpe na mawa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ