10 Sima na Yobo kosambela mpo na baninga na ye, Yawe atalisaki ye lisusu bolamu mpe apesaki ye bomengo mbala mibale koleka oyo azalaki na yango liboso.
Amatsia atunaki moto na Nzambe : — Boni, nkoto misato na nkama mitano ya bakilo ya palata oyo napesaki mampinga ya Isalaele ekosuka ndenge nini ? Moto na Nzambe azongisaki : — Yawe akoki kopesa yo koleka oyo wana.
mpe azalaki na etonga ya bameme nkoto sambo, bashamo nkoto misato, bangombe nkoto moko, ba-ane nkama mitano, mpe azalaki na basali ebele penza. Alekaki bato nyonso ya Este na lokumu.
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tango Yawe azongisaki bato ya Siona longwa na bowumbu, tozalaki lokola bato oyo bazali kolota ndoto.
Boloba kati na Yelusalemi, boyebisa ye ete minyoko na ye ekomi na suka, masumu na ye esili kolimbisama, pamba te asili kozwa na loboko ya Yawe ngolu koleka mbala mibale mpo na masumu na ye nyonso.
Na esika ya soni na bino, bokozwa litomba mbala mibale, mpe na esika ya kosambwa, bokosepela na libula na bino. Boye, bokozwa litomba mbala mibale kati na mokili na bino mpe bokosepela mpo na libela.
Wana lisanga mobimba ya Isalaele ezalaki koloba ete baboma bango na mabanga, nkembo ya Yawe emonanaki na Ndako ya kapo ya Bokutani na miso ya bato nyonso ya Isalaele.
Yawe, Nzambe na yo, akoyokela yo mawa : akozongisa bato na yo, oyo bakendeki na bowumbu mpe akosangisa bino lisusu wuta na bikolo nyonso epai wapi apanzaki bino.
Mpo na yango, kobosanaka te ete ezali Yawe, Nzambe na yo, nde apesaki yo makoki ya kozwa bomengo oyo mpo na kolendisa boyokani na Ye, oyo asalaki elongo na bakoko na bino na nzela ya ndayi, ndenge ezali na mokolo ya lelo.
Ndenge boyebi, tobengaka bato oyo bayikaka mpiko bato ya esengo. Boyokaki sango ya lolenge oyo Yobo akangaki motema kati na pasi, mpe boyebi malamu makambo oyo Nkolo asalaki, na suka, mpo na bolamu na ye ; pamba te Nkolo atonda na boboto mpe na mawa.
Alongolaka mobola na putulu, mpe abimisaka na fulu moto oyo azanga ; mpo ete avandisa bango esika moko na bato ya lokumu mpe apesa bango kiti ya lokumu lokola libula. Pamba te miboko ya mabele ezali ya Yawe, mpe ezali na likolo na yango nde atia mokili.