22 Se ya libumu na yango etonda na banzube, etambolaka lokola ebende oyo ebalolaka mabele.
Boni, yo nde moto opesa mpunda makasi mpe olatisa kingo na yango pwale ya milayi ?
Tala makasi oyo ezali kati na loketo na yango, nguya oyo ezali kati na misuni ya libumu na yango !
Makonga ezali lokola matiti mpo na yango, mpe esekaka makelele ya makonga mike-mike.
Eningisaka mayi ya mozindo lokola mayi oyo ezali kotoka na nzungu, ekomisaka ebale monene lokola nzungu oyo batokiselaka malasi.
Nakokangola bango na bokonzi ya mboka ya bakufi, nakosikola bango na kufa. Oh kufa, wapi nguya na yo ? Oh mboka ya bakufi, wapi nguya na yo ya kobebisa ? Nakoyokela bango mawa te !