Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 40:9 - Mokanda na Bomoi

9 Ozali na loboko lokola oyo ya Nzambe ? Mongongo na yo ekoki konguluma makasi lokola oyo ya Ye ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 40:9
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, alingaki kosalela nguya na Ye mpo na kosamba na ngai ? Te, alingaki kutu koyokela ngai mawa !


Yoka ! Yoka makelele ya mongongo na Ye, makelele oyo ezali kobima na monoko na Ye.


Bwanya ya Nzambe ezali na bozindo makasi, mpe nguya na Ye ezali monene ; nani asila kotelemela Ye, bongo amona bolamu ?


Mongongo ya Yawe eyokani na likolo ya mayi, Nzambe ya nkembo azali koleka elongo na lokito, Yawe azali koleka elongo na lokito na likolo ya mayi minene.


Mongongo ya Yawe ezali na nguya ; mongongo ya Yawe ezali na lokumu mingi.


Yo nde okonzaka lolendo ya ebale monene mpe okitisaka bambonge na yango soki etomboki.


Yo nde okela Nor mpe Sude ; Tabori mpe Erimoni egangaka na esengo mpo na lokumu ya Kombo na Yo.


Nzembo. Boyembela Yawe nzembo ya sika, pamba te asalaka makambo ya kokamwa ! Na nguya mpe na bokonzi na Ye ya bonzambe, alongaki.


Loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, emonisi nguya na Yo ; loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, enyati monguna.


Mawa na ye oyo abetaka tembe na Mokeli na ye, ye oyo azali kaka mbeki kati na bambeki ya mabele ! Boni, potopoto ekoki solo koloba na moto oyo asali yango : ‹ Ozali kosala nini ? › Mpe mosala ya maboko na yo ekoki solo koloba : ‹ Azali na maboko te ? ›


Yawe asemboli na pole loboko na Ye ya bule na miso ya bikolo nyonso ; mpe suka nyonso ya mokili ekomona Lobiko ya Nzambe na biso.


Oh Babiloni, nasili kotiela yo motambo, mpe ekangi yo liboso ete oyeba yango. Omonanaki mpe okangamaki mpo ete otelemelaki Yawe.


Makelele ya mapapu ya basheribe ezalaki koyokana na mosika kino na lopango ya libanda ya Tempelo lokola mongongo ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, tango alobaka.


Boni, tolingi nde kotumbola zuwa ya Nkolo ? Boni, tozali makasi koleka Ye ?


Asalaki bongo mpo ete bato nyonso ya mokili bayeba ete loboko ya Yawe ezalaka na nguya, mpe mpo ete bobangaka Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ