Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 40:8 - Mokanda na Bomoi

8 Olingi kotiola bosembo na ngai ? Okani kokweyisa ngai mpo ete yo moko omilongisa ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 40:8
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, ozali kosepela konyokola ngai, kobwaka ekelamu oyo maboko na Yo esali, mpe kolongisa mabongisi ya bato mabe ?


atako oyebi malamu ete nasali na ngai mabe te, mpe ete ezali na moto moko te oyo akoki kokangola ngai na loboko na Yo ?


Sik’oyo, namibongisi mpo na kobundela likambo na ngai, nayebi ete nakolonga na kosambisama.


Nzambe akabi ngai na maboko ya bato mabe mpe abwaki ngai na manzaka na bango.


wana boyeba ete Nzambe nde asali ngai mabe mpe azingeli ngai na monyama na Ye.


Bato wana misato batikaki koyanola Yobo, pamba te azalaki komimona sembo na miso na ye moko.


Kasi Eliwu, mwana mobali ya Barakeyeli, moto ya libota ya Buzi mpe ya etuka ya Rami, asilikelaki Yobo makasi, pamba te amimonaki sembo koleka Nzambe.


Boni, moto oyo ayinaka bosembo akoki solo kozala mokonzi ? Okokweyisa solo Nkolo-Na-Bosembo mpe Nkolo-Na-Nguya ?


Sukola ngai mobimba mpo na kolongola mabe na ngai, mpe petola ngai na masumu na ngai.


Pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, asili kozwa mokano ; bongo nani akolongola yango ? Loboko na Ye esili kosembolama ; nani akozongisa yango ?


Boyokani na bino elongo na kufa ekobebisama, boyokani oyo bosalaki elongo na mokili ya bakufi ekolonga te ; tango likama ya makasi ekokomela bino, ekobebisa bino penza nye.


Zongisa yango nanu na makanisi na Ngai ; tika ete tosamba elongo, mpe loba yo moko mpo na kotalisa ete ozali moto ya sembo.


Mawa na ye oyo abetaka tembe na Mokeli na ye, ye oyo azali kaka mbeki kati na bambeki ya mabele ! Boni, potopoto ekoki solo koloba na moto oyo asali yango : ‹ Ozali kosala nini ? › Mpe mosala ya maboko na yo ekoki solo koloba : ‹ Azali na maboko te ? ›


Soki moke te ! Nzambe azali solo, mpe bato nyonso bazali bakosi kolanda ndenge ekomama : « Mpo ete bamona yo sembo na maloba na yo, mpe okobanda kolongaka tango bakobanda kosambisaka yo. »


Bandeko na ngai, tozwa nanu ndakisa moko kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo : Soki moto atiki maloba na ye ya suka kati na mokanda, moko te akoki kolongola to kobakisa eloko kati na makambo oyo esili kokomama.


Nalobi boye : « Mobeko oyo eyaki sima na mibu nkama minei na tuku misato ezali na makoki te ya koboma boyokani oyo Nzambe asala wuta kala elongo na Abrayami ; soki te, elaka ekomi eloko pamba. »


Boye, Nzambe alongolaki mobeko ya liboso mpo ete ezalaki makasi te mpe ezalaki na tina te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ