3 Yobo azongiselaki Yawe :
Yobo alobaki :
Soki moto moko alobi na Nzambe : ‹ Nasali mabe, nazwi etumbu ya masumu na ngai, kasi nakosala lisusu mabe te.
« Boni, moto oyo atiaka tembe na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki koteya Ye ? Tika ete oyo azali koswanisa Nzambe ayanola Ye ! »
« Tala ngai, nazali se ekelamu ya pamba, eyano nini nakoki kopesa Yo ? Natie loboko na ngai na monoko.
Yobo azongiselaki Yawe :
Yango wana, ngai moko, nazali komiyokela mawa mpe namileli, namikitisi kino na putulu ya mabele mpe na putulu ya moto. »
Sima na Yawe koloba makambo oyo epai ya Yobo, alobaki na Elifazi, moto ya Temani : « Kanda na Ngai engaleli yo mpe baninga na yo mibale, pamba te bolobi na bosembo te na tina na Ngai, ndenge Yobo, mosali na Ngai, alobaki.
Bomikitisa liboso ya Nzambe. Botelemela Satana, mpe akokima mosika na bino.