22 Banzete ya mike-mike ebombaka yango na se ya elili na yango, banzete ya pepiliye ezingeli yango.
Elalaka na se ya banzete ya mike-mike, na se ya matiti oyo ezalaka pembeni ya mayi mpe na potopoto.
Soki mayi ya ebale etomboki, yango ebangaka te ; ata mayi ya Yordani esopaneli yango na monoko, evandaka kaka kimia.
Yango wana, bamemi bomengo oyo bazwaki mpe oyo babombaki na lubwaku ya banzete ya pepiliye.
Bakokola malamu kati na matiti ya mobesu lokola banzete ya pepiliye pene ya ebale.
Ekamataki ndambo ya milona ya mokili wana, ekendeki kolona yango na mabele ya malamu, lokola nzete oyo elingaka esika ya mayi, pene ya mayi.
Na mokolo ya liboso, bokopona bambuma ya banzete, mandalala ya banzete ya mbila, bitape ya banzete oyo ezali na makasa ebele mpe banzete oyo babengaka sole mpe ebotaka pembeni ya mayi. Bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino, mikolo sambo.