Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 40:2 - Mokanda na Bomoi

2 « Boni, moto oyo atiaka tembe na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki koteya Ye ? Tika ete oyo azali koswanisa Nzambe ayanola Ye ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 40:2
35 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakoloba na Nzambe : ‹ Kokatela ngai etumbu te, yebisa ngai mabe nini nasali ! ›


Kasi nalingi nde koloba na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe kobundela likambo na ngai liboso ya Nzambe.


nalingaki kotalisa, na bosembo nyonso, likambo na ngai liboso na Ye, mpe kotondisa monoko na ngai na matatoli ya solo,


« Na Kombo ya Nzambe oyo awangani bosembo na ngai, na Kombo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso oyo atungisi motema na ngai,


Mpo na nini pole epesamelaka bato ya pasi ? Mpo na nini bomoi epesamelaka moto oyo azali na pasi na motema ?


Mpo na nini bomoi epesamela moto oyo nzela na ye ebombama, moto oyo Nzambe azingela lokola lopango ?


Obongwani monguna ya kanza mpo na ngai, ozali kobundisa ngai na nguya ya loboko na Yo.


Ah, soki nazalaki ata na moto oyo akokaki koyoka ngai ! Yango nde sik’oyo liloba na ngai ya suka. Tika ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayanola ngai ! Tika ete moto oyo afundi ngai akoma na mokanda makambo oyo afundeli ngai !


Mpo na nini ozali kosamba na Ye ? Alimbolaka tina ya misala na Ye epai ya moto moko te.


Lata mokaba na yo lokola elombe mobali ; nakotuna yo mituna mpe okoyanola ngai.


Boni, nakomi ebale to elima ya mayi mpo ete batiela ngai bikangiseli ?


Ata, na mbala nkoto moko, ameki kobeta tembe na Nzambe, akotikala kokoka kolonga ata mbala moko te.


Ekelamu nyonso oyo ezali esila koyebana na kombo na yango, mpe eyebani malamu soki moto azali nani : akoki te kotelemela oyo aleki ye na makasi.


Yawe atunaki toli na nani mpo ete apesa Ye mayele ? Nani alakisaki Ye ndenge bakataka makambo na sembo to apesaki Ye boyebi, to mpe ateyaki Ye nzela ya bososoli ?


Ye oyo alongisaka ngai azali pene, nani akokoka kotelemela bosembo na ngai ? Tika ete tosamba elongo ! Nani akofunda ngai ete tosamba na ye ? Tika ete apusana pene na ngai !


Oh Babiloni, nasili kotiela yo motambo, mpe ekangi yo liboso ete oyeba yango. Omonanaki mpe okangamaki mpo ete otelemelaki Yawe.


« Bino bato, mpo na nini kati na mokili ya Isalaele bolobaka lisese oyo : ‹ Batata basili kolia bambuma ya vino ya mibesu, kasi minu ya bana nde ekomi ngayi ; elakisi nini ? ›


Tango bazwaki yango, basilikelaki nkolo elanga.


Boni, tolingi nde kotumbola zuwa ya Nkolo ? Boni, tozali makasi koleka Ye ?


« Nani ayebi makanisi ya Nkolo mpo akoka kopesa Ye toli ? » Nzokande biso, makanisi ya Klisto ezali kati na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ