Pamba te naponaki ye mpo ete ateya bana na ye mpe ndako na ye sima na ye ete bayeba kobatela nzela ya Yawe na kozalaka na etamboli ya malamu mpe ya sembo ; na bongo nde, Ngai Yawe, nakokokisela Abrayami elaka oyo napesaki ye. »
Na mikolo sambo, basalaki na esengo feti ya Mapa ezanga levire, pamba te Yawe atondisaki bango na esengo ndenge abongolaki makanisi ya mokonzi ya Asiri mpo ete asunga bango na misala ya botongi Ndako ya Nzambe, ya Nzambe ya Isalaele.
Lokola bozali kolembisa mitema ya bato ya sembo na nzela ya lokuta na bino, nzokande Ngai moko nalembisaki bango mitema te ; lokola bozali kolendisa bato mabe ete bakangama na etamboli na bango ya mabe mpo ete babikisa bomoi na bango te,
Tika ete minoko na bino ebimisaka maloba ya mabe te, kasi bolobaka kaka maloba ya boboto, maloba oyo esungaka bato mosusu na kokola kati na kondima, kolanda bosenga na bango, mpe esalaka bolamu na bato oyo bayokaka yango.