21 basinga oyo esimbaka bandako na bango ya kapo epikolamaka na mbalakata, mpe bakufaka ndenge wana bazanga bwanya. ›
Tala, solo, ndenge suka ya moto mabe ezalaka, mpe bomoi ya moto oyo ayebi Nzambe te. »
Ezali kaka mibange te nde bazali na bwanya, mpe ezali kaka bampaka te nde basosolaka makambo oyo ezali sembo.
Kasi soki batosi Ye te, bakokufa na mopanga mpe bakosila mpo na kozanga boyebi.
Banguna na yo bakotondisama na soni, mpe bandako ya bato mabe ekozala lisusu te. »
Kobeta ngai lisusu te, nazali kokoka lisusu te.
Yawe, yebisa ngai tango nini bomoi na ngai ekosuka mpe motango ya mikolo ya bomoi na ngai mpo ete nasosola ete bomoi na ngai ezali kaka mpo na mwa tango moke.
Yango nde suka ya bato oyo batiaka elikya kati na bango moko, ya bato oyo balandaka bango mpe basepelaka na maloba na bango.
okokende kaka kokutana na bakoko na yo oyo bakotikala komona lisusu pole te.
akokufa likolo ya bozoba, mpe liboma na ye ekobungisa ye nzela.
Bato oyo bazali komona yo batie miso na bango epai na yo, bazali komituna : ‹ Boni, ezali penza ye oyo azalaki koningisa mokili mpe kolengisa bikolo ?
Botika kotia elikya na moto oyo bomoi na ye ezali lokola pema kati na zolo na ye. Motuya nini azali na yango ?
Kasi Nzambe alobaki na ye : « Zoba ! Na butu ya lelo kaka, okokufa. Bongo nani akokoma nkolo biloko nyonso oyo ondukaki mpo na yo moko ? »
Ndenge fololo ekawukaka, ekweyaka mpe ebungisaka kitoko na yango na tango ya moyi makasi, ndenge wana mpe mozwi akolimwa kati na misala na ye nyonso.