19 mpo na nini te epai ya bato oyo basalema na mabele, ba-oyo bazali kaka putulu mpe bakoki kofinafina bango lokola mitsopi ?
Abrayami alobaki lisusu : — Solo, nazali na ngai moto pamba mpe putulu, kasi limbisa ete nameka kosolola na Nkolo na ngai.
Yawe Nzambe asalaki moto wuta na putulu ya mabele, afulaki pema ya bomoi na madusu ya zolo na ye ; mpe moto akomaki ekelamu ya bomoi.
Okolia lipa na yo na motoki ya elongi na yo kino okozonga na mabele epai wapi owutaki, pamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu. »
Kanisa ete Yo moko nde obongisaki ngai lokola mabele ya bikeko ; olingi sik’oyo kozongisa ngai na putulu ?
Pamba te maloba na bino ekokani na putulu, mpe makanisi na bino ezali lokola mabele ya bikeko.
Moto apola penza boye lokola eloko ya kopola, lokola elamba oyo balie na banselele !
Akolaka mpe akawukaka lokola fololo, awumelaka te lokola elili ya lipata oyo elekaka.
Kufa ememaki bango na mbalakata, mpe miboko na bango etiolaki na mpela.
toloba nini mpo na moto oyo azali se mutsopi, mpo na mwana na moto oyo azali kaka nyama moke ya pamba ! »
Nazali kaka lokola yo liboso ya Nzambe ; ngai mpe nawutaki na putulu.
Soki bakufi, bazongaka na mabele, mpe, mbala moko, mabongisi na bango elimwaka.
Kobeta ngai lisusu te, nazali kokoka lisusu te.
liboso ete putulu ezonga na mabele epai wapi ewutaki, mpe pema ezonga epai ya Nzambe oyo apesaki yango.
Kasi tomemaka bomengo yango kati na bambeki ya mabele mpo ete nguya monene ya Nzambe emonana, kasi nguya na biso bato te.
Toyebi malamu ete, soki ndako na biso, ndako oyo ya kapo epai wapi tovandaka awa na mokili ebebisami, tozali na ndako oyo Nzambe abongisela biso, ndako ya seko kati na Lola, ndako monene oyo etongama na maboko ya bato te.
Pamba te ekomama : « Bato nyonso bazalaka lokola matiti, mpe nkembo na bango nyonso ezalaka lokola bafololo ya bilanga. Matiti ekawukaka mpe fololo na yango ekweyaka,