Somo makasi ekokweyela bango, pasi mpe kobanga ekotika bango te ; bakobunda-bunda lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. Bango na bango bakotalana na kokamwa mpe bilongi na bango ekokoma lokola moto.
Bongo moto yango alobaki na ngai : — Daniele, molingami ya Nzambe, yoka malamu maloba oyo nazali koyebisa yo mpe telema na esika oyo ozali, pamba te natindami sik’oyo epai na yo. Wana azalaki nanu koloba na ngai, natelemaki na kolenga.