12 Liloba moko eyelaki ngai na nkuku, mpe matoyi na ngai eyokaki yango na se penza :
Miso na ngai emonaki makambo oyo nyonso, matoyi na ngai eyokaki yango, mpe nasosoli yango malamu.
Soki makambo wana ezali kaka ndambo moke ya misala na Ye mpe mongongo na Ye ya se oyo toyokaka, nani akoki kososola bakake ya nguya na Ye ? »
Alobaka kati na ndoto, kati na emoniseli ya butu, tango bato bazwaka pongi makasi wana balali na mbeto ;
Botiaka elikya te na mileki ya moyibi, mpe botielaka yango motema te ; soki bomengo na bino ekomi ebele, bokangama na yango te.
Solo, sik’oyo, tozali komona kaka elilingi, lokola kati na talatala ; kasi mokolo ezali, mokolo oyo tokomona penza ndenge esengeli. Sik’oyo nayebi kaka moke ; kasi mokolo ezali, mokolo oyo nakoyeba penza nyonso, ndenge Nzambe ayebi ngai.