Yuda, ozali mwana ya nkosi ; mwana na ngai ya mobali, owuti na bokila. Agunzami mpe alali lokola nkosi ya mobali ; mpe lokola nkosi ya mwasi, nani akomeka kotelemisa ye ?
Nkosi moko ebimi na ndako na yango ; mobebisi moko ya bikolo abimi. Atiki esika na ye mpo na koya kobebisa mokili na yo. Bingumba na yo ekobukana mpe ekotikala lisusu na bato te.
Ezali Nkolo nde atelemaki pembeni na ngai mpe apesaki ngai nguya mpo ete, na nzela na ngai, mateya eteyama na mobimba na yango nyonso, mpe mpo ete Bapagano bayoka yango. Mpe akangolaki ngai wuta na monoko ya nkosi.