18 Nzokande soki etelemi mpe ebandi kopota mbangu, ekoseka ata mpunda mpe motambolisi na yango.
Tala liloba oyo Yawe alobi mpo na kotelemela ye : ‹ Siona, mboka kitoko, ezali kotiola yo mpe koseka yo ; Yelusalemi, mboka kitoko, ezali koningisa moto mpo na kotiola yo.
pamba te Nzambe apimeli yango bwanya mpe apesi yango mayele te.
Boni, yo nde moto opesa mpunda makasi mpe olatisa kingo na yango pwale ya milayi ?
Eyokaka somo te, ebangaka eloko moko te, ezongaka sima te liboso ya mopanga,
Esekaka makelele ya bingumba mpe eyokaka te mongongo ya motambolisi ya mpunda.
okoseka kobebisama mpe nzala makasi, mpe okobanga te banyama ya mokili ;