14 Maligbanga ebwakaka maki na yango na mabele mpe etikaka yango ete ezwa moto ya mabele,
Mapapu ya maligbanga efungwamaka na esengo nyonso, kasi, boni, lipapu mpe nsala na yango ekokani na oyo ya nkongi ?
kasi ebosanaka ete lokolo ekoki kopanza yango mpe banyama ya zamba ekoki konyata-nyata yango.
Moto oyo ayengaka-yengaka mosika ya mokili na ye azali lokola ndeke oyo ezali koyengayenga mosika ya zala na yango.
Moto azwaka yango mpo na kopelisa moto, akataka yango mpo na koyetola moto to mpo na kobelisa mapa ; kasi asalaka na yango lisusu nzambe oyo afukamelaka ; asalaka na yango nzambe ya ekeko oyo agumbamelaka.
Ata mbwa ya zamba ezalaka na posa ya komelisa bana na yango mabele ; kasi bato na ngai bakomi mitema makasi lokola maligbanga kati na esobe.