Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 38:8 - Mokanda na Bomoi

8 Nani akangaki ebale monene na bikuke ya makasi tango yango ebimaki wuta na mabele,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 38:8
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe akelaki etando ; akabolaki mayi oyo ezalaki na se ya etando na mayi ya likolo. Yango esalemaki mpe bongo.


Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mayi oyo ezali na se ya likolo esangana esika moko mpo ete mabele ya kokawuka ebima ! » Yango esalemaki mpe bongo.


Tango apesaki makasi na mopepe mpe atiaki mondelo na mayi,


tango natielaki yango bandelo, tango natielaki yango bikuke ya makasi,


tango nakomisaki mapata elamba na yango, mpe molili, singa ya kokangela yango,


Ozipa yango na mayi monene lokola elamba ; mayi ezalaki kovanda na likolo ya bangomba.


bamonaki misala ya Yawe, mpe bikamwa kati na ebale monene.


Asangisaka mayi ya bibale minene esika moko, mpe atiaka yango na bisika ya mozindo.


Nani amata na Lola to mpe akita wuta kuna ? Nani asangisa mopepe kati na maboko na ye ? Nani akanga mayi na kazaka na ye ? Nani akata bandelo nyonso ya mabele ? Kombo na ye nani ? Mpe kombo ya mwana na ye ezali nani ? Yebisa ngai soki oyebi !


tango akatelaki ebale monene mondelo mpo ete mayi ezindisa mokili na Ye te, tango atiaki miboko ya mabele ;


Nani asila komeka ebale monene kati na loboko na Ye, to likolo na nzela ya molayi ya misapi na Ye ? Nani asila kosangisa putulu nyonso ya mabele kati na katini moko to komeka kilo ya bangomba milayi na nzela ya ndobo to komeka kilo ya bangomba mikuse na nzela ya emekelo kilo ?


Bokoki penza kobanga Ngai te, » elobi Yawe ? « Bokoki solo kolenga liboso na Ngai te, Ngai oyo nasala zelo lokola mondelo ya mayi, epekiselo ya libela oyo mayi ekoleka ata mokolo moko te ? Mayi ekoki kotomboka, kasi ezali na nguya te ; ata soki esali makelele, kasi ekoleka mondelo yango te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ