Nzambe akelaki biloko mibale ya minene oyo ebimisaka pole : oyo eleki monene, mpo na kongenga na moyi ; mpe oyo ya moke, mpo na kongenga na butu. Mpe akelaki lisusu minzoto.
Ngai Yesu, natindaki anjelu na Ngai mpo na kotatola bosolo ya makambo oyo kati na Mangomba. Nazali Mosisa mpe mokitani ya Davidi ; Monzoto ya tongo, oyo engengaka.
Bongo natalaki mpe nayokaki mongongo ya ba-anjelu ebele, oyo motango na bango ezalaki bankoto na bankoto ; bazingelaki Kiti ya Bokonzi, bikelamu ya bomoi mpe bampaka,