Bana mibali na biso bazali lokola milona, bazali kokola malamu wuta na bomwana na bango ; bana basi na biso bazali lokola bililingi kitoko oyo batoboli na bamir ya ndako ya mokonzi.
Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Tala, nasili kotia libanga moko kati na Siona, libanga ya makasi, libanga ya songe ya ndako, libanga ya motuya mpo na moboko ya malonga ; moto oyo akozwa yango lokola eyekamelo na ye akotikala kobanga te.
Liloba na Yawe. Tala liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele. Yawe oyo atanda likolo mpe asala miboko ya mabele, Ye oyo atia Molimo na Ye kati na moto, alobi :
Wana bakanisaka bongo, babosanaka na nko ete, na kala, Likolo mpe mabele ezalaki ; ete na nzela ya Liloba na Nzambe, mabele ebimaki wuta na mayi mpe epikamaki kati na mayi.
Alongolaka mobola na putulu, mpe abimisaka na fulu moto oyo azanga ; mpo ete avandisa bango esika moko na bato ya lokumu mpe apesa bango kiti ya lokumu lokola libula. Pamba te miboko ya mabele ezali ya Yawe, mpe ezali na likolo na yango nde atia mokili.