41 Nani abongiselaka yanganga bilei tango bana na yango egangaka epai ya Nzambe mpe tango eyengaka-yengaka mpo na kozanga bilei ?
Okozwa biloko ya kolia ya lolenge na lolenge mpe okobomba yango mpo ete ezala bilei na yo elongo na yango. »
Apesaka bilei epai ya bibwele mpe epai ya bana ya yanganga oyo ezali koganga mpo na nzala.
Botala ndeke ya likolo : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ebombaka bilei te kati na bibombelo ; kasi Tata na bino ya Likolo aleisaka yango. Boni, bozali na motuya te koleka yango ?
Botala bayanganga : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ezali te na ebombelo bambuma to na ebombelo bilei ; kasi Nzambe aleisaka yango. Nzokande bino, boleki bandeke na motuya.