Nani amata na Lola to mpe akita wuta kuna ? Nani asangisa mopepe kati na maboko na ye ? Nani akanga mayi na kazaka na ye ? Nani akata bandelo nyonso ya mabele ? Kombo na ye nani ? Mpe kombo ya mwana na ye ezali nani ? Yebisa ngai soki oyebi !
Yawe atunaki toli na nani mpo ete apesa Ye mayele ? Nani alakisaki Ye ndenge bakataka makambo na sembo to apesaki Ye boyebi, to mpe ateyaki Ye nzela ya bososoli ?
Pamba te Ye oyo asalaki bangomba, oyo akelaki mipepe, oyo alakisaka makanisi na Ye epai na moto, oyo abongolaka pole molili, oyo atambolaka likolo ya bangomba ya mokili, Kombo na Ye ezali : Yawe, Nzambe Mokonzi ya mampinga.
Kasi sik’oyo, na mikolo oyo ezali ya suka, Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Mwana na Ye, oyo Ye moko Nzambe akomisaki Mokitani ya biloko nyonso. Ezali mpe na nzela na Ye nde Nzambe asalaki mokili.
Alongolaka mobola na putulu, mpe abimisaka na fulu moto oyo azanga ; mpo ete avandisa bango esika moko na bato ya lokumu mpe apesa bango kiti ya lokumu lokola libula. Pamba te miboko ya mabele ezali ya Yawe, mpe ezali na likolo na yango nde atia mokili.