Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 38:28 - Mokanda na Bomoi

28 Boni, mvula ezali nde na tata ? Nani abotaki matanga ya mamwe ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 38:28
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, ezali na nzambe moko ya ekeko, kati na bikolo, oyo enokisaka mvula ? Boni, likolo ekoki penza konokisa yango moko mvula ? Te ! Ezali nde Yo, Yawe, Nzambe na biso ! Totie elikya na biso nyonso epai na Yo, pamba te Yo nde osala biloko oyo nyonso.


Azipaka likolo na mapata, abongisaka mvula mpo na mokili mpe abotisaka matiti na bangomba.


Na ndenge wana nde bokozala bana ya Tata na bino, oyo azali kati na Likolo, pamba te abimisaka moyi mpo na bato malamu mpe mpo na bato mabe, mpe anokisaka mvula mpo na bato ya sembo mpe mpo na bato oyo bazali sembo te.


« Napimelaki bino lisusu mvula, basanza misato mobimba liboso ete tango oyo babukaka bambuma ekoma. Natindaki mvula na engumba moko mpe nakangaki yango na engumba mosusu. Elanga moko enokelaki mvula, kasi mosusu ezangelaki yango mpe ekawukaki.


Bosepela, bino bato ya Siona, bosepela kati na Yawe, Nzambe na bino, pamba te apesi bino mvula mpo na kobikisa bino. Akonokisela bino bamvula minene na eleko ya mvula mpe na eleko ya elanga, ndenge ezalaki liboso.


Nakobikisa bango na mabe na bango mpe nakolinga bango na motema moko, pamba te kanda na Ngai elongwe kati na bango.


Tango agangaka, mayi etiaka makelele makasi kuna na likolo, asangisaka mapata wuta na basuka ya mokili, apelisaka mikalikali, anokisaka mvula mpe abimisaka mopepe wuta na bibombelo na Ye.


Bamilobelaka te : ‹ Tika ete totosa Yawe, Nzambe na biso, oyo anokisaka mvula na tango ekoki, na eleko ya kolona mpe ya kobuka ; oyo akatela biso baposo oyo esengeli mpo na kobuka milona. ›


Na nzela ya mayele na Ye, mozindo ya se ya mabele ebimisaki mayi mpe mapata enokisaki mvula.


Nani akangaki ebale monene na bikuke ya makasi tango yango ebimaki wuta na mabele,


Misisa na ngai ekoluka mayi, mpe mayi oyo ezalaka na matiti ekovanda butu mobimba na bitape na ngai.


Eliya, moto ya Tishibe, moko kati na bavandi ya Galadi, alobaki na mokonzi Akabi : — Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, Nzambe oyo ngai nasalelaka, mamwe mpe mvula ekozala te na mibu oyo ezali koya, longola kaka soki nasengi yango.


Oh bangomba ya Giliboa, tika ete mamwe mpe mvula ekweya lisusu te na likolo na bino, ata na likolo ya bilanga oyo ebotaka bambuma mpe epai wapi makabo ewutaka ! Pamba te ezali kuna nde basambwisaki banguba ya bilombe, nguba ya Saulo oyo bakotikala kopakola lisusu mafuta te.


Boye Isalaele akowumela na kimia, mpe etima ya Jakobi ezali kotiola kati na mokili ya ble mpe ya vino ya sika, epai wapi likolo ezali kokitisa mamwe.


Mpo na Jozefi, alobaki : « Tika ete Yawe apambola mokili na ye na nzela ya mamwe ya motuya, oyo ewutaka na likolo, mpe na nzela ya mayi ya mozindo oyo etiolaka na se ya mabele


Tata na ye, Izaki, alobaki na ye : — Okovanda mosika ya mabele oyo ebotaka malamu, mpe mosika ya mvula ya likolo.


Tika ete Nzambe apesa yo mvula ya likolo mpe mabele ya bozwi ; apesa yo mbuma ya ble mpe vino ebele penza !


Abendaka mayi epai na Ye, na mapata ; akomisaka yango mvula, mvula oyo enokaka mpe etondisaka bibale.


Mapata ekweyisaka yango, mpe enokisaka yango likolo na ebele ya bato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ