27 mpo na kosopa mayi na bisika oyo ezanga bato mpe ekawuka, mpe mpo na kobotisa matiti ya mobesu ?
Ezalaka mpo na kopesa etumbu na mokili to mpo na kopambola yango.
Wuta na bandako na Yo ya likolo, onokisaka mvula na likolo ya bangomba ; mokili etondi na mbuma ya misala na Yo.
Matiti ebotaka mpo na bibwele, mpe milona ya bato ekolaka mpo ete mabele ebotela bango bilei,
Akoki kobongola esobe liziba ; kobongola mabele ya kokawuka bitima.
Azipaka likolo na mapata, abongisaka mvula mpo na mokili mpe abotisaka matiti na bangomba.
Opambolaka mobu na bolamu na Yo, mpe banzela mike oyo olekelaka ebotaka ebele.