25 Nani atimola nzela mpo na mvula makasi, nani apasola nzela mpo na mokalikali ya bakake
tango atiaki mobeko mpo na mvula mpe afungolaki nzela mpo na kake mpe mikalikali,
Na nzela nini pole ebimaka mpe mopepe ya ngambo ya este epanzanaka ?
mpo na konokisa mvula na esika oyo ezanga bato, na esika ya esobe oyo bato bavandaka te,
Amatisaka mapata wuta na suka ya mokili, atindaka mikalikali elongo na mvula, abimisaka mopepe wuta na bibombelo na yango.