24 Na nzela nini pole ebimaka mpe mopepe ya ngambo ya este epanzanaka ?
akataka mondelo na likolo ya mayi, na suka ya pole mpe na molili.
Nabombaki yango mpo na tango ya pasi mpe mpo na mikolo ya bitumba.
Nani atimola nzela mpo na mvula makasi, nani apasola nzela mpo na mokalikali ya bakake
Moyize asembolaki loboko na ye likolo ya ebale monene ; bongo na butu mobimba, Yawe atindaki na ebale monene mopepe makasi ya este oyo ekabolaki mayi ya ebale monene.
Tango moyi ebimaki makasi, Nzambe atindaki mopepe ya este oyo epesaki molunge makasi. Moyi ebetaki moto ya Yona makasi. Yona alembaki nzoto, asengaki kokufa ; alobaki : — Eleki malamu ete nakufa na ngai, kasi nazala na bomoi te !
Solo, ndenge mokalikali oyo ebimi na este engengisaka kino na weste, ndenge wana mpe koya ya Mwana na Moto ekozala.