Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 38:15 - Mokanda na Bomoi

15 Bazangisi bato mabe pole mpe babuki loboko oyo etombwami mpo na kosala mabe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 38:15
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola monguna azalaki kopusana pene na ye, Elize asambelaki Yawe : — Boma ekolo oyo miso ! Mpe Yawe abomaki bango miso, ndenge kaka Elize asengaki.


Babenganaka ye na pole mpo ete akende na molili, mpe balongolaka ye na mokili.


Solo, mwinda ya moto mabe ekufaka, moto na yango etikaka kopela.


Bato oyo bazali kosala bongo, bazali kotombokela pole, bayebi nzela na Ye te mpe batambolaka ata kati na yango te.


tika ete loboko na ngai elongwa na lipeka na ngai to ebukana !


Mabele ebongwani lokola potopoto oyo batia kashe, mpe nyonso emonani lokola elatisami elamba.


Molili eyelaka bango na moyi ; na moyi makasi, batambolaka na kotepatepa lokola na butu.


Nzambe abikisaka mobola na mopanga ya monoko na bango, akangolaka moto akelela na loboko ya moto ya makasi.


Bebisa nguya ya moto mabe, pesa moto ya misala mabe etumbu mpo na mabe na ye, mpo ete emonana lisusu te.


pamba te nguya ya bato mabe ekosila, kasi Yawe alendisaka bato ya sembo.


Nzela ya bato ya mobulu ezali lokola molili, bayebaka te eloko nini ekokweyisa bango.


Bopesa nkembo epai na Yawe, Nzambe na bino, liboso ete amemela bino molili, liboso ete makolo na bino ebeta mabaku na bangomba oyo ezipami na molili. Bino bozali kozela pole, kasi Ye akobongola yango molili makasi.


Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Natelemeli Faraon, mokonzi ya Ejipito ; nakobuka maboko na ye nyonso mibale : ezala loboko oyo ya malamu to loboko oyo ebukana ; mpe nakosala ete mopanga ekweya longwa na loboko na ye.


Kasi moto nyonso oyo akosala lisumu na nko, azala mwana mboka to mopaya, atioli nde Yawe ; mpe moto ya lolenge oyo basengeli kolongola ye kati ya bato na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ