11 tango nalobaki : ‹ Okosuka kino awa, kasi mosika te ; awa nde ekosukela mbonge ya lolendo na yo ? ›
Abimaki mpe akutaki ebembe elali na nzela, ane mpe nkosi etelemi pembeni ya ebembe. Nkosi eliaki te ezala ebembe to ane.
Na makambo wana nyonso, Yobo atikalaki kosala lisumu te mpe atangaki pasi yango na moto ya Nzambe te.
Yawe alobaki na Satana : — Malamu ! Azali kati na maboko na yo, kasi kosimba bomoi na ye te !
akataka mondelo na likolo ya mayi, na suka ya pole mpe na molili.
tango natielaki yango bandelo, tango natielaki yango bikuke ya makasi,
Boni, osili kopesa tongo mitindo to osili kolakisa tongo-tongo esika na yango,
Otiaki mondelo oyo ekoki koleka te ; ekozonga lisusu te kozipa mokili.
Mayi makasi elingaki kozindisa biso.
tango, Yo Nzambe, otelemaka mpo na kosambisa mpe kobikisa banyokolami nyonso ya mokili.
Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, nani azali na nguya lokola Yo ? Nani, oh Yawe ? Boyengebene na Yo ezingeli Yo.
tango akatelaki ebale monene mondelo mpo ete mayi ezindisa mokili na Ye te, tango atiaki miboko ya mabele ;
Apesaki bango etumbu na kotelemela mpe na kobengana. Alongolaki bango na mopepe na Ye ya makasi, kaka na mokolo moko ya mopepe na Ye ya este.
Bokoki penza kobanga Ngai te, » elobi Yawe ? « Bokoki solo kolenga liboso na Ngai te, Ngai oyo nasala zelo lokola mondelo ya mayi, epekiselo ya libela oyo mayi ekoleka ata mokolo moko te ? Mayi ekoki kotomboka, kasi ezali na nguya te ; ata soki esali makelele, kasi ekoleka mondelo yango te.