namonaki nyonso oyo Nzambe asala. Moto moko te akoki kososola makambo oyo elekaka na se ya moyi. Soki asali makasi mpo na koyeba, akotikala te kososola tina na yango ; mpe ata soki moto ya bwanya abeti tolo ete ayebi, akotikala kaka kososola yango te.
Oh Yawe, loboko na Yo emati solo likolo, kasi bazali komona yango te. Tika ete bayokisama soni tango bakomona bolingo makasi na Yo, oyo eleka ndelo mpo na bato na Yo ; tika ete moto oyo obongiselaki banguna na Yo etumba bango !
Bazali na mandanda, banzenze, masanga ya vino, bambunda mike mpe baflite mpo na kosepelisa bafeti na bango, kasi bakanisaka te mosala na Yawe mpe bazalaka na limemia te mpo na misala ya maboko na Ye.