Nzokande tozali bato ebele awa, mpe ezali eleko ya mvula ; tokoki kowumela na libanda te. Kutu, ezali te likambo ya mokolo moko to ya mikolo mibale, pamba te ebele kati na biso basali masumu kati na likambo oyo.
Sima na mikolo yango misato, bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame basanganaki na Yelusalemi. Na mokolo ya tuku mibale ya sanza ya libwa, bato nyonso bavandaki kati na lopango, liboso ya Ndako ya Nzambe, mpe bazalaki kolenga makasi likolo ya makambo oyo mpe mpo ete mvula ezalaki kobeta makasi.
Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakotinda mopepe moko ya makasi, kati na kanda na Ngai, mpe nakonokisa mvula moko ya makasi mpe ya mabanga, kati na kotomboka na Ngai, mpo na kobebisa nyonso nye.
Yawe atonga ndako na Ye kati na Lola mpe atia miboko na yango na mabele ; abengaka mayi ya ebale monene mpe asopaka yango na etando ya mabele. Kombo na Ye ezali : Yawe.