Sima na yango, konguluma na Ye ekoyokana, akoganga makasi na mongongo ya bokonzi na Ye ; akokanga mikalikali ya monoko na Ye te, wana mongongo na Ye ezali koyokana.
Mongongo ya Yawe eyokani na likolo ya mayi, Nzambe ya nkembo azali koleka elongo na lokito, Yawe azali koleka elongo na lokito na likolo ya mayi minene.
Nzambe asalaka eloko na eloko malamu na tango na yango ; atiaka lisusu, kati na mitema ya bato, posa ya koyeba mabombami na Ye. Nzokande, bato bakokaka te kososola mosala ya Nzambe, kobanda na ebandeli kino na suka.
Oyebi te ? Nanu oyoka te ? Yawe azali Nzambe ya libela na libela, azali Mokeli ya basuka ya mabele ; alembaka te mpe apemaka te, mpe moko te akoki kososola mayele na Ye.
Bazalaki koyemba nzembo ya Moyize, mowumbu ya Nzambe, mpe nzembo ya Mpate : Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, misala na Yo ezali minene mpe ya kokamwa ! Mokonzi ya bikolo nyonso, banzela na Yo ezali sembo mpe solo.