16 Oyebi ndenge nini mapata evandaka malamu ? Ezali bikamwa ya Ye-Oyo-Akoka-Na-Boyebi-Nyonso.
akangaka mayi kati na mapata, kasi mapata epasukaka te ;
Nani akoki kososola ndenge Nzambe apanzaka mapata mpe ndenge bakake ebimaka wuta na ndako na Ye ?
Yeba malamu ete maloba na ngai ezali ya lokuta te, ezali moto na boyebi ya solo nde azali pene na yo.
Yoka, Yobo ! Telema mpe sosola bikamwa ya Nzambe.
Oyebi ndenge nini Nzambe akambaka mapata, mpe ndenge nini angengisaka mikalikali na Ye na mapata ?
Bilamba na yo ezali na moto, nzokande mabele ezali konyokwama na mopepe ya midi.
Na nzela ya mongongo na Ye ya makasi, Nzambe asalaka bikamwa, asalaka makambo minene, makambo minene oyo mayele na biso ekoki kososola te.
Nzambe asalaka makambo minene oyo bato bakokaka kososola te, mpe bikamwa oyo bato bakokaka kotanga te ;
Oh Yawe, misala na Yo ezali ebele ! Osalaki nyonso na bwanya ; mokili etondi na biloko oyo okela.
Nkolo na biso azali monene mpe atonda na nguya ; mayele na Ye ezali na mondelo te.
Tokobombela yango bakitani na bango te, kasi tokoloba na bikeke oyo ekoya na sima nkembo ya masanzoli ya Yawe, nguya na Ye mpe bikamwa oyo asalaki.
Yawe avandaka na likolo ya mondelo ya mabele, epai wapi bato na yango bamonanaka lokola mabanki ; atandaki likolo lokola liputa mpe afungolaki yango lokola ndako ya kapo mpo na kovanda kuna ;